MISA ESILI TOKENDE NA BOBOTO (T2)
ActionGraceGabriel MAYENDA
Refrain
Misa esili e tokende na boboto Misa esili tozonga na nsai Esengo na biso soki tokotosa Nzambe Esengo na biso soki tokotosa Ye
Couplets
1.
Soki tosaleli mateya ma Kristu Tokomona bolamu bwa Nzambe
2.
Soki totosi mibeko mya Eklezya Tokozwa esengo ya lobiko ! 3. Soki totosi baboti ba biso Tokowumela mingi awa o nse
3.
Soki tolingi baninga ba biso Tokomona bokonzi bwa Nzambe
4.
Soki tosalisi bato ba mpasi Tokozwa makabo ebele.