NKEMBO NA NZAMBE O LIKOLO (AL60)
GloriaJoël Carlo BELENGO
Refrain
Couplets
1.
Tokokumisa Yo, nkembo na Nzambe, tokokembela Yo Tokokumbamela Yo, tokotondo mpo ya nkembo ya Yo enene
2.
Mokonzi Nzambe Nkumu wa likolo Nzambe Tata wa bokasi bonso
3.
Mokonzi Yezu Kristu Mwana se moko wa Nzambe Yo nde Mwana wa Tata e nkembo na Yo e
4.
Yo nde Mwa Mpata ya Nzambe e, okolongola masumu ma bato Yokela biso mawa; Yo nde ya Nzambe e Okolongola masumu ma bato, ndima losambo la biso
5.
Ozali o loboko la mobali la Nzambe Tata Yokela biso mawa e