E! NZAMBE YAKA (47)

Kyrie

Celestin PASA

Refrain

E! Nzambe yaka sukola ngai nakoma peto yaka, Naluki Yo bisika binso yaka, masumu maluti ngai mingi yaka

Couplets

1.

Mikolo minso ngai bible na maboko, Lomingo inso nazali na Ekleyza, Kasi Nzambe namona Yo te Ndeko bongola motema mwa Yo e

2.

Ntango inso koteya Nsango Elamu, Mosolo mwa ngai mosili na babola Kasi Nzambe namona Yo te Ndeko lakisa bolingo bwa solo

3.

Mikolo minso sapele, na losambo Minei inso nazali na lisanga Kasi Nzambe namona Yo te Ndeko bongola motema mwa Yoe

Santu Kanda

[email protected]

L'outil moderne pour vos célébrations liturgiques