NAZALI MWANA WA NZAMBE (X51)

Psaume

J. VATOMA & MBUNGU MAFWANKADI

Refrain

Nazali mwana wa Nzambe, Ye azali solo Tata wa ngai Nazali mwana wa Nzambe, Tata mosusu azali te (2x)

Couplets

1.

Ye Tata abyangi ngai, tika nionso yaka kosalela ngai. Nandimi maloba mana, nzela mosusu ezali te (solo)

2.

Nzela ya Yo ezali mpasi, kaka Yo moko, okolendisa ngai ; Nalanda nzela ya solo : nzela mosusu ezali te (solo)

3.

E Tata nandimi solo maye manso ozali kosenga ngai nalanda maloba ma yo : nzela mosusu ezali te (solo)

4.

Yo ozali bomoi solo, natingama kaka kosalela Yo nakoma na nsuka solo : nzela mosusu ezali te (solo)

5.

Nandimi makambo manso ata mpasi eye ekoyela ngai Nasengeli kondima inso : nzela mosusu ezali te (solo)

Santu Kanda

[email protected]

L'outil moderne pour vos célébrations liturgiques