NKEMBO NA NZAMBE O LIKOLO (AL66)

Gloria

Alain MBUNGU

Refrain

Nkembo na Nzambe o likolo O nse boboto na bato ba bolingo Nkembo nkembo, nkembo (bis)

Couplets

1.

Tata tokokumisa Yo e, tokoyembela Yo Tokokumbamela Yo, tokotondo Yo, Mpo ya nkembo ya Yo enene

2.

Mokonzi Nzambe se Yo e Nkumu wa likolo Tata wa bokasi bonso, zwa nkembo

3.

Mokonzi Yezu Kristu e, Mwana se moko wa Nzambe Mokonzi Nzambe, Mwa Mpata ya Nzambe, Yo nde Mwana wa Tata

4.

Yo moto okolongola masumu ma nse Mwa Mpata yokela biso mawa e, Mwa Mpata ndima losambo la biso = : Yo ofandi na nkembo ya Nzambe Tata yokela biso mawa

5.

Yezu Kristu e, Yo moko Mosantu Yezu Kristu e, Yo moko Mokonzi e, oleki banso

6.

Elongo n’Elimo Santu O nkembo ya Nzambe Tata e : amen Nkembo na Tata : amen Nkembo na Mwana: amen, Nkembo n’Elimo: amen

Santu Kanda

[email protected]

L'outil moderne pour vos célébrations liturgiques