NZAMBE OTONDA NGOLU (N35)
KyrieChorale lisanga Saint Matthias
Refrain
Mokonzi, Mokonzi e, Yo nde Nzambe (2x) Tenor: Limbisa e Tous: Limbisa Nzambe wa ngolu kotala mabe te, limbisa e Limbisa Nzambe wa ngolu, masumu maluti, limbisa e Yo Nzambe Tata wa ngolu, yokela biso bana tobeleli Yo (2x)
Couplets
Nabotamaki na mbindo, nakolisami na mbindo, Ngai oyo nalembi na masumu (2x) Ténor: Tosali mabe e Tous:Tosali mabe oboso bwa Yo e, Yo Mokonzi, limbisa e Toleli na Yo Nzambe wa ngolu mbindo eluti, petola e
Nabongi te Mokonzi, kopusana oboso bwa Yo, Mpo ngai natondi na mbindo (2x) A+T: Limbisa e Tous: Limbisa e Nzambe wa ngolu kotala mabe te, limbisa e Limbisa e Nzambe wa ngolu, masumu maluti, limbisa e
Soki otali masumu, nani lisusu akobika?, Yo Nzambe otonda ngolu (2x) Ténor: Tosali mabe e Tous: Tosali mabe oboso bwa Yo e, Yo Mokonzi, limbisa e Toleli na Yo Nzambe wa ngolu mbindo eluti, petola e i I