NAYEI NAYEI LELO EPAYI NA YO

Kyrie

Morino MAGBODU

Refrain

2 Petola petola ngai eee , Ngai mosumuki, namiyokeli mawa, Limbisa limbisa ngai e nasengi na Yo bolimbisi Nasumuki nasumuki mingi lisumu nini nasali te 1) Lisumu lya maloba : bobele kaka ngai Lisumu lya makanisi : bobele kaka ngai i Misala mabe : bobele kaka ngai Botiki masengisi : bobele kaka ngai A a a Nzambe wa ngai : bobele kaka ngai 2) Kofinga pe koyina : bobele kaka ngai Koyiba pe koboma : bobele kaka ngai Lolendo pe likunya : bobele kaka ngai A a a Nzambe wa ngai : bobele kaka ngai 3) kolangwa pe ekobo : bobele kaka ngai Zuwa pe kindoki : bobele kaka ngai Kowela ki bokonzi : bobele kaka ngai A a a Nzambe wa ngai : bobele kaka ngai

Couplets

Santu Kanda

[email protected]

L'outil moderne pour vos célébrations liturgiques