NKEMBO, NKEMBO (AL77)

Gloria

Mgr Donat BAFUIDINSONI

Refrain

Nkembo na Nzambe o likolo O nse boboto na bato banso na bato banso batondi na bolingo

Couplets

1.

Tokoyembela Yo tokokumisa Yo e, tokokumbamela Yo Nzambe Tokokembela Yo tokotondo Yo e mpo ya nkembo ya Yo enene

2.

Mokonzi Nzambe Nkumu wa likolo e Tata wa bokasi bonso Mokonzi Yezu Yezu Kristu Mwana se moko wa Ye Mokonzi Nzambe Mwa Mpata e wa Nzambe, Mwana wa Tata e

3.

Yo moto okolongola masumu ma bato oyokela biso mawa Yo moto okolongola masumu ma bato o ndima losambo la biso Y’ozali o nkembo ya Nzambe Tata oyokela biso mawa

4.

Yezu Kristu Yo moko Mosantu Yo moko Mokonzi oleki banso Elongo n’Elimo Santu o nkembo ya Nzambe Nkembo na Nzambe Tata Amen a men. Nkembo na Yezu Kristu Amen a men Nkembo n’ Elimo Santu Amen a men

Santu Kanda

[email protected]

L'outil moderne pour vos célébrations liturgiques