E NZAMBE WA LIKOLO (G15)
CommunionKABENGE
Refrain
E Nzambe wa likolo, limbisa ngai mosumuki, nakangemi, nakangemi, O maboko ma banguna ba ngai, ma banguna ba ngai
Couplets
1.
Biso banso e yoka mawa e, Nzambe Tata, yoka biso Nkolo wa binso, awa o nse eye nalikolo Nzambe se Yo.
2.
Bankoko banso bamibombaki o mboka Yo, ntango inso Yo mei zuzie o babikisi, bana ba Yo ut’o kala
3.
Biso mpe toyei, mpo tosenga Yo ngolu ya Yo nta bonene. … Yamba biso mpe tokobondela nta bosantu.