TALAKA MWINDA (F54)
EntreeTony AKUNDI
Refrain
Talaka e talaka mwinda mopeli e Monzoto mongengi e, Mwana Nzambe abotami (2x) Emanuele ayei lelo e tosepela e (2x) | 1. Lokola bankoko balobaka; Bokomona elembo ya monzoto Ayei lelo e tosepela e Nkombo ya Ye Emanuele; Nzambe o kati ya biso ayei lelo e tosepela e
Couplets
1.
Ye nde Mokonzi wa bwanya, Atondi na bokasi bonso ayei lelo e tosepela e Ye nde Bolingi bwa Tata e, Mwana wa Ye wa boboto ayei lelo e tosepela e
2.
Bino bakengeli mpata e, Yakani kotala libiki ayei lelo e tosepela e Yembani nzembo ya nsai, Nkembo na Nzambe o likolo Boboto na bato ba ns’eye ayei lelo e tosepela e