YEZU YAKA (E22)

Entree

Edgar VAYEMBA

Refrain

Yezu yaka se Yo nde Mesiya Mokili mokozila se Yo (2x)

Couplets

1.

Yaka, Yo liziba lya mai ma bomoi; Yaka obongola butu ya biso na moi Na bozito’a masumu, tolingi tobika i Mokonzi obikisa, toboyi kozika. #. Yaka Yo Bosembo bwa bato ba mawa; Yaka Yo Mosekwisi o mboka ya bawa Ba ebubu, koyoka maloba obazongisela Mosumuki mp’esengo ya ye omozongisela. # Okokaba bomoi bwa Yo, ngo Yezu; Okopesa nzoto ya Yo, ngo Yezu Mpo moto azwa bomoi bokosila te Yaka Yo vinu ya bomoi, kozila te.

2.

Bakufa miso yaka kobamonisa; Bakufa makolo yak'obatelemisa Mitema mipaswani oya noki kosono Mayele mapusi ntembe mazwa bosolo [} Boboto bwa Yo, ya ndenge ya mokili te; Mpe bokonzi bwa Yo yango nde bosili te Mesiya, bolingi bwa Nzambe’oya na nkembo i Yak’Emanuele tokoyamba Yo na nzembo.

Santu Kanda

[email protected]

L'outil moderne pour vos célébrations liturgiques