BETHELEM SEPELA (F7)
EntreeGabriel MAYENDA
Refrain
Noel gloria noel noel, Noel gloria Mwana Nzambe abotami (2x)
Couplets
1.
Tala bolingi bwa Nzambe Liloba akomi moto, Mari‘aboti Yezu, Bethelem sepela Noel.
2.
Tala o kati ya butu e mwinda mongengi e, Tomoni Mobikisi, Bethelem sepela noel.
3.
Tala Mokonzi wa boboto Ye Mokonzi wa bwanya e, Ayeli biso libiki, Bethelem sepela noel.
4.
Tala banzelu bayembi e bakumisi Mokonzi, Mwana Nzambe ayei, Bethelem sepela noel.
5.
E Mama Maria Nzambe abenisi vo, Oboti Mobikisi, Bethelem sepela noel.
6.
Nkembo na Yo Nzambe o likolo mpe o nse boboto, Banso toyemba Noele Finale: Noel noel Bethelem sepela (bis) noel noel