YEMBA NOELE (F56)
EntreeJean Bedel BOYELE
Refrain
E e noele (2x) ¢ Noele mbotama ya Yezu Kristu mwana wa Nzambe Mbotama y’Emanuele Mwana Nzambe o kati ya biso toyemba noele
Couplets
1.
Mama Maria na Tata Yozefu (2x) Bazangi ndako, bazangi mbeto, esika ya kolala se ndako ya nyama, Emanuele Mokonzi monene, Emanuel’o ndako ya nyama Toyemba noele
2.
Bwaka mandoki, bitumba bisila, Yamba Emanuele, Mokonzi wa boboto, Emanuele mwinda mwa bakristu, Toyemba noele