NAYAMBI NZAMBE SE MOKO ALOU

Credo

Gabriel MAYENDA

Refrain

Nayambi e, ngai nayambi e Nayambi e Nzambe se moko (2x)

Couplets

1.

Nayambi Tata wa bokasi bonso, Mozalisi wa likolo na nse, Wa biloko bikomonono na biye bikomonono te

2.

Nayambi Mokonzi Yezu Kristu, Mwana se moko wa Nzambe, Abotami na Tata nayino bileko bibandi te

3.

Ye nde Nzamb’awuti na Nzambe, Ye mwinda mowuti na mwinda, ; Nzambe wa solo, awuti na Nzambe wa solo

4.

Ayaki awa o nse mpo ya kobikisa biso, Abotami na Ngondo Maria mpe akomi moto

5.

Bamobaki o kuruse o eleko ya Pontio Pilato, Awei, akundami nsima ya mikolo misato asekwi Lokola ekomami o mikanda misantu,

6.

Abuti'o likolo, azali kuna o loboko la mobali la Nzambe Tata wa bokasi bonso

7.

Nayambi Elimo Santu akopesa biso bomoi, Awuti na Tata mpe na Mwana

8.

Nayambi Eklezy’Esantu amen Ezali ya bato banso amen Ebandaka na bapostolo amen Nandimi batisimo se yoko amen Ekolongola masumu amen Nakozela nsekwa ya bawa amen | Mpe bomoi bokoya nsima amen.

Santu Kanda

[email protected]

L'outil moderne pour vos célébrations liturgiques