BANSO TOYEMBELA NZAMBE

Entree

Auteur inconnu

Refrain

Banso e toyembela Nzambe (2x). Ye nde Tata ee mpe nkumu monene (2x).

Couplets

1.

Totondo Nzambe asali malamu totondo ye na loyembo loye.

2.

Tosangisa ekpengbe na mbonda binso bisala mpo ya Nkumu Nzambe.

3.

Totuta nzembo totuta nzembo bana, bakolo tosangana banso.

4.

Mpo ya nini e toboya koyemba manso tozwi e, tozwi na Ye e.

5.

Awa toyei e o ndako ya Nzambe Nzambe mpenza e asangisi biso.

6.

Ye mozalisi Ye mobikisi, bomoi bwa sika o maboko ma Ye.

7.

Tosenge Ye e akolimbisa, Ye nde mosantu biso basumuki.

8.

Toyoka Nzambe toyoka Nzambe ye ndalopesi mateya manene.

9.

Tomobonzela tomobonzela, nkita ya biso elongo na mpasi.

10.

Tosangana na Nzambe bokasi o komunio nde tolendi banso.

Santu Kanda

[email protected]

L'outil moderne pour vos célébrations liturgiques