MOPEPA (X30)
PsaumeAbbé Jean Pierre MAKAMBA
Refrain
Moto alandi Mokonzi azali na mwinda mwa bomoi (2x) E esengo mpenza (2x).
Couplets
Esengo na ye moto oyo akolanda malako ma basumuki te Akima esika bakotonga e, akima esika songi-songi e Songi-songi e, songi-songi e
Azali lokola nzete (2x), nzete elonami pembeni ya mai Ekobota mbuma n’eleko elamu, nkasa na yango ekokauka te
Manso makosala ye (2x), makobongo malamu e Akomona malamu e, akosepela, akosepela
Soki oponi mabe ma mokili : Ozali lokola likasa ekauka (2x) Okopumbwa mpamba mpamba ndeko zonga Mopep’ekobebisa yo e ndeko zonga ; Mopep’ekobebisa yo e mopepa vanda Mopep'ekobebisa yo e mopepa vandaka
Eesengo (2x), mot'akobanga Nzambe: E esengo na ye (2x) E mopepa vanda (2x) ; Mopepa vanda ozwa libiki Mopepa sambela omona nkembo Manena vandisa nzoto oluka bosantu e.