BILOKO TOZWI (B43)

Offertoire

Pére Jean Jacques LUZITU

Refrain

Biloko tozwi tokobonzela Yo lokola Abarama Tata wa biso Tokosenge Yo oyamba byango lokola libonza ly’Abele mosaleli wa Yo

Couplets

1.

Tata otondisa bibale bya biso na mbisi ndenge na ndenge Topepi tozwi toyei kobonzela Yo Otondisa zamba na esobe na biso na nyama ebele Lifut’a bokila toyei kobonzela Yo.

2.

Onokisaki mbula mpe bilanga binso bikoli malamu Tobuki ndunda toyei kobonzela Yo Obimisaki moi mpe mbuma ya nzete inso ikomeli Yang’oyo tomemi toyei kobonzela Yo

3.

Opesaki biso makasi na misala minso tosalaki Lifuta tozwi toyei kobonzela Yo ; ; Manso tosalaki o katia mikolo minso milekaki Tomemi mango toyei kobonzela Yo

4.

Bandeko banso bazali na mpasi o kati ya lopitalo, Tokokanisa bango toyei kobonzela Yo Baye banso bakangemi na mpasi’o kati ya boloko Tokokanisa bango toyei kobonzela Yo

5.

Tala baboti, tala bana, tala bakolo mpe bilenge

Santu Kanda

[email protected]

L'outil moderne pour vos célébrations liturgiques