MESIYA YAKA NOKI i ES

Entree

Gabriel MAYENDA

Refrain

Mokonzi yaka, Mokonzi yaka, Mokonzi yaka e, Mesiya e yaka noki (2x)

Couplets

1.

Yaka kopesa biso e bokasi bwa Yo e, Tolongwa na boombo bwa masumu, tobongola mitema hum

2.

Yaka kopesa baboti Elikya ya Yo e, Babokolo bana malamu, babongola mitema, hum

3.

Yaka kopesa bakonzi ya Eklezya bwanya bwa Yo e, Bakengele mpata malamu, babongola mitema, hum

4.

Yaka kopesa bakonzi ba mboka mayele ma Yo e, Bakamba bikolo malamu, na nguya ya Nzambe, hum....

Santu Kanda

[email protected]

L'outil moderne pour vos célébrations liturgiques