TATA NASALI MABE (N33)
KyrieAbbé Jean Pierre MAKAMBA
Refrain
Tata nasali mabe, Tata yokela ngai mawa e (2x) E Nzambe yokele ngai mawa e, Mpo ya bolamu bwa Yo e yokela biso mawa e (2x)
Couplets
1.
Sukola mbindo na ngai inso kitoko, Petola ngai na lisumu, lisumu linene, Yango nandimi ngai nasali mabe e, Nasumuki, ngai nasumuki, nasumuki
2.
Tandela mwana wa Yo oyo loboko, Kimisa ye na mitambo, mitambo minene, Yango nandimi, se akweyi mabe e, Abebisi, solo abebisi
3.
Bayeba bosoto bwa ngai ut'o bomwana, Sambisa ngai na lisumu, boloko matata Yango nandimi, yaka kosalisa ngai e Nabwanya bwa Yo, mayele ma Yo, se ya Yo Moko
4.
Sukola mposo na ngai, nyonso kitoko, Yindisa ngai mai-ndombe, moyindo makasi Yango nangeli, ngai nangeli kitoko Bonzenga Wenge, moyindo ya ngolo e, pepepe bopeto Cs