NKOMBO NA YO EZALI MONENE PSAUME 8 (X35)
PsaumePère Théotime LULENDO
Refrain
Nkombo n’o Mokonzi ezali monene Nkombo na Yo e eza monene.
Couplets
1.
Bilenge, bana bake bakokumisa Yo Ekotela banguna o mitema.
2.
Natali likolo, mosala mwa maboko ma Yo Sanza, minzoto otiaka kuna.
3.
Nan’oyo moto mp’okanisa ye Mwana w'Adamu obatelaka ye.
4.
Omotondisi na nkembo na lokumu Banzelu baleki ye se mwa moke.
5.
Oti Ye Mokonz'ya bikelamu binso Biloko binso o nse ya makolo ma Ye.
6.
Mpata, ngombe na nyama ya zamba Ndeke, mbisi mpe binso bifandi na mbu.