NKEMBO 10 (AL51)
GloriaAbbé Jean Pierre MAKAMBA
Refrain
Nkembo na Nzambe o likolo, O nse boboto na bato banso (2x)
Couplets
Tokokumisa Yo Tata, tokoyembela Yo Tata Tokokumbamela Yo e
Nkembo nkembo oo
Tokokembela Yo Tata, tokotondo Yo Tata Mpo ya nkembo ya Yo enene
Mokonzi Nzambe se Yo, na likolo Nkumu se Yo Tata wa bokasi bonso
Mokonzi Yezu Kristu Mwana se moko wa Ye
Ee Mokonzi Nzambe Ee Mwa Mpata ya Nzambe Yo nde Mwana wa Tata e
Yo moto okolongola, masumu ma bato Oyokela biso mawa
Yo moto okolongola, masumu ma bato ondima losambo la biso
Eee ozali na nkembo, eee ya Nzambe Tata e Oyokela biso mawa
Eee Yezu Kristu, eee Yo moko Mosantu Eee Yo moko Mokonzi, Yo moko oleki banso
Eee elongo n’ Elimo Santu, Eee o nkembo ya Nzambe Tata: Amen amen amen Nkembo nkembo 00: Amen amen amen ! Nkembo na Nzambe Tata (2x) : Amen amen amen Nkembo na Nzambe Mwana (2x) : Amen amen amen Nkembo n’Elimo Santu (bis) : Amen amen amen Nkembo nkembo 0: Amen amen amen Final: Sop + Alto : Kembo o (x) Tenor + Basse: Nkembo na Nzambe Tata (2x) Nkembo na Yezu Kristu (2x) Na Elimo kembo (2x) Amen amen amen