NSANGO BAYELI BISO (F42)
EntreeNZONZO
Refrain
Nsango bayeli biso o nse mobimba Mwana’ Nzambe abotami kun’o Beteleme kun’o Beteleme lelo Emanuele (2x) (Yemba yemba na esengo kumisa Nzambe na esengo) Yemba yemba Mobikisi ayei Yemba yemba Mesiya ayei (2x) Yemba yemba kumis’Emanuele (2x)
Couplets
1.
Etinda ya Mokonzi Maria na Yozefu bakei o Beteleme Kopesa nkombo kun’o Beteleme O kati ya butu Mari’aboti Mwana wa ye Emanuele
2.
Minzoto mikongenge, oyo nsai enene Mwana’ Nzambe abotami kun’o Beteleme Banzelu bakoyemba loyembo kitoko Nkembo na Nzambe o likolo O nse boboto na bato ba Ye ba bolingo