LIKOLO SEPELA (F44)
EntreeAuteur non précisé
Refrain
Likolo sepela nse bina na nsai e Mbu na binso bizali wana biganga makasi Bolingo bwa Nzambe bomononi o miso ma bato Maye alakaka bankoko ba biso ekokisami. ‘ 1. Bato bazalaka kotambola e: na molili Bamoni mwinda monene mongengi Mongengeli bato bafandaki o mokili mozangi moi
Couplets
Olongoli mokumba o mapeke ma biso Obwaki fimbo ya bato babeteki biso 0 mabele Obuki lingenda lya monyokoli, lya monyokoli
Obwaki bibundeli binso bya bitumba : o moto Bilamba bibebi na makila: omotumbi Botutu bonso botondi makila: omotumbi ' 4. Baboteli biso ye ye ye Mwana moko Nzambe apesi biso Mwana mobali Emanuele Akozala Mokonzi wa mikili minso - Bakobenga Ye: Nkumu wa bwanya, Nzambe wa bokasi Nzambe wa lobiko, Mokonzi wa boboto. - Ayei kolakisa bonene bwa Nzambe : - Ayei kolakisa mayele ma Nzambe : - Ayei kobandisa bokonzi bwa Nzambe : } - Oyo amoni Ye, amoni Tata : - Oyo ayambi Ye, ayambi Tata : - Oyo atosi Ye, atosi Tata : Finale : Likolo sepela : sepela !