Psaume 25
PsaumeEdgar Vayemba
Refrain
Natomboli motema mwa ngai epai ya Yo Mokonzi, Yo Nzambe wa ngai
Couplets
1.
Mokonzi, olakisa ngai nzela ya yo, Osalisa ngai na landa mibeko mya yo.
2.
Mokonzi, oleki motema molamu mpe bosembo, Okozongisa basumuki o nzela ya solo.
3.
Soko bato batosi mibeko mya bondeko bwa yo, Okosala manso na bolingi mpe na bosembo.
4.
Oteya ngai bosolo bwa yo; okamba ngai, Zambi mobikisi wa ngai se yo.
5.
Okolakisa bato ba bosawa nzela ya bosembo, Mpe bato ba mawa nzela ya mitindo mya yo.
6.
Moto abangi Mokonzi akozwa bondeko bwa ye, Mobeko mwa ye mokopesa ye mayele.