SANGO MALAMU (F50)

Entree

Paul BALENZA / LOPA

Refrain

Beta mbonda, yembelani banso : Nsango malamu Kumisani, kembelani banso : Nsango malamu Sepelani, yokani liloba : Nsango malamu Mobikisi ayei na mokili : Nsango malamu

Couplets

1.

Mobikisi ya mokili, akolongola molili, Amemeli biso mwinda, ayei kongengisa nzela.

2.

Nzambe solo Moto solo, ayei na bokonzi lelo Oyo akondimela Ye nd’akoti’o bokonzi bwa Ye.

3.

Yambo binso bikelama, ezalaki se Liloba, Liloba ekomi nsuni, evandi kati ya bato.

4.

Bolingo ya Nzambe emonani, elaka ekokisami, Bamotindeli Mesiya, Ye nsuka ya baprofeta.

5.

Balolanda bakomona, bibosono bakobika, Ye nde Liziba lya bomoi, nguya na Ye eleki nyonso

6.

Ayei kozongisa elikya, na mitema milembi e, Ayei kozongisa bomoi, esika kufa ezali. .

Santu Kanda

[email protected]

L'outil moderne pour vos célébrations liturgiques