NAYAMBI MOKONZI (AL83)
CredoTony AKUNDI
Refrain
Nayambi Ye nayambi Mokonzi e
Couplets
Tata wa bokasi bonso, Mozalisi wa likolo na nse, Wa biloko bikomonono na biye bikomonono te Uhm nayambi e
Nayambi Mokonzi Yezu Kristu Mwana wa Nzambe Abotami na Tata naino bileko bibandi te
Ye nde Nzamb’awuti na Nzambe, Mwinda mowuti na Mwinda, Nzambe wa solo awuti na Nzambe wa solo
Tata aboti Ye kobota kasi asali Ye te, Mwana azali na Tata Nzambe moko
Ayaki o nse mpo ya biso bato, mpo ya kobikisa biso, Abotami na Ngondo Maria mpe akomi moto.
0 eleko ya Pontio Pilato, bamobaki o Kuruse Ayoki mpasi mpo ya biso o awei, akundami
Asekwi o mokolo mwa misato abuti o likolo Azali kuna o loboko la mobali la Nzambe Tata.
Nayambi Elimo Santu akopesa biso bomoi, Awuti na Tata mpe Awuti na Mwana.
Tokumbamela Ye mpe tokembela Ye, Ye nde moto alobaka o monoko mwa baprofeta
Nayambi Eklezya se yoko, ezali ya bato banso, } Ebandaka na bapostolo, nandimi batisimo se yoko Ekolongola masumu, nakozela nsekwa ya bawa Mpe bomoi bokoya nsima (2x)