LELO MOKOLO MWA MOKONZI : (A29)
EntreeAbbé Charles TATAA MBO
Refrain
Aleluya esengo mingi tokende kokumisa Nzambe (2x)
Couplets
1.
Nzambe abateli biso mposo mobimba : Tokende kokumisa Ye Apesi biso bomoi tosalako nini e? Tokende kokumisa Ye
2.
Nzambe abateli biso na makama: Tokende kokumisa Ye Alobikisi na liwa, tosalako nini e? Tokende kokumisa Ye
3.
Nzambe akabeli biso mpe makabo: Tokende kokumisa Ye Apesi biso misala tosalako nini e? Tokende kokumisa Ye
4.
Nzambe akabeli biso mpe mayele: Tokende kokumisa Ye Apesi biso bwanya tosalako nini e ? Tokende kokumisa Ye
5.
Nzambe akabeli biso mpe boboto: Tokende kokumisa Ye Apesi biso elikya tosalako nini e? Tokende kokumisa Ye
6.
Nzambe akabeli biso mpe bolingo: Tokende kokumisa Ye Apesi biso bandeko tosala ko nini e? Tokende kokumisa Ye