BAKONZI BABALE (X25)

Psaume

Alpha KELE

Refrain

Moto moko te akoki kosalela bakonzi babale Moko akolinga mosusu akoboya (2x)

Couplets

1.

Na bomoi bwa bino bomitungisa te mpo ya bilei Mpe mpo ya molato Pamba te bomoi boleki bilei mpe nzoto eleki bilamba na ntina

2.

Botala ndeke alonaka te kasi aliyaka mikolo minso Kasi moto aleki ndeke na motuya o miso ma Nzambe i 3. Nani akoki kobakisa mokolo ata moko na bomoi bwa ye ? Moko te

3.

Soki Nzambe akolatisa matiti ya zamba Oyo lobi ekokauka mpe babwaki o moto Boni boni akosala yango te mpo ya bino bato ? ! Bozali solo na boyambi moke

4.

Bomitungisa te mpo ya bilei mpe kolata na bino mpamba te Nzambe ayebi ‘te bosengeli na yango

5.

Na manso bokosala boluka naino bokonzi bwa likolo Manso masusu nde bozui nsima 1

Santu Kanda

[email protected]

L'outil moderne pour vos célébrations liturgiques