TOPESI YO MABONZA (B26)

Offertoire

Réné NKUMILEMBO

Refrain

Topesi na Yo e Nzambe mabonza ma biso bana ba Yo e (bis) ¢ 1. Tobelemi o lotale la Yo e, na botosi mpo tobonzela Yo (2x)

Couplets

1.

Biso bana, tosangisi maboko mpe mitema mpo tobonzela Yo e (2x)

2.

N’esengo enene toyei kopesa mabonza ma biso e Tata e (2x)

3.

Manso tozui tomemi e, elembo ya bolingo bwa biso e. Réf.2: Tata yamba e mabonza ma bana (bis)

4.

Tobonzeli Yo e,

5.

Mbuma misala mya biso Nzambe (2x) Misolo mya biso : Yamba e Tata yamba e Mampa navino :Yamba e Tata yamba e Nyama ya zamba : Yamba e Tata yamba e Nsoso ya mboka e : Yamba e Tata yamba e

6.

Yamba, yamba Tata mabonza ma biso bana ba Yo (2x) lyole, iyole o (2x)

7.

Mabota ma biso Nzambe (2x) Baboti ba biso : Yamba e Tata yamba e Bilenge banso : Yamba e Tata yamba e Bolingo bwa biso : Yamba e Tata yamba e Mpe bomoko bwa biso e : Yamba e Tata yamba e

8.

Eklezya ya biso Nzambe (2x) Basango ba biso : Yamba e Tata yamba e Bamamelo banso : Yamba e Tata yamba e ; Losambo la biso : Yamba e Tata yamba e Mpe mitema tobonzie :Yamba e Tata yamba e À

Santu Kanda

[email protected]

L'outil moderne pour vos célébrations liturgiques