TOKOBONZELA YO MOKONZI (B4)

Offertoire

Mamie MASAKA

Refrain

Tokobonzela Yo lelo mabonza ma biso Mabonza mawuti na misala mya biso e Tata nzambe yamba e yamba mango e lelo (2x)

Couplets

1.

Tokobonzela Yo lelo e mampa na vino, Toyei e lelo e kobonzela Yo e yamba.

2.

Tokobonzela Yo lelo mosolo mwa biso , Tozui lelo na misala mpe bilanga e, Toyei e lelo e kobonzela Yo e yamba.

3.

Batata bayei lelo kobonzela Yo e Lokola Abarama abonzelaki Yo e, Bayei e lelo e kobonzela Yo e yamba.

4.

Bamama bayei lelo kobonzela Yo e Lokola mwasi bonzenge abonzelaki Yo e, Bayei e lelo e kobonzela Yo e yamba.

5.

Bilenge bayei lelo kobonzela Yo e Lokola Abele abonzelaki Yo e, Bayei e lelo e kobonzela Yo e yamba.

Santu Kanda

[email protected]

L'outil moderne pour vos célébrations liturgiques