NKEMBO 2000 (AL61)
GloriaAbbé Jean Pierre MAKAMBA
Refrain
Nkembo (6x) o nkembo kun’olikolo
Couplets
1.
Tokoyembela Yo, tokokumisa Yo, tokokumbamela Yo Tokokembela Yo, tokotondo Yo Mpo ya nkembo ya Yo enene, nkembo enene, o likolo
2.
Mokonzi Nzambe e, Nkumu, Nkumu wa likolo Tata wa bokasi bonso, o! Wa bokasi bonso Zwa nkembo (5x)
3.
Mokonzi Yezu Kristu e, Mwana se moko wa Nzambe e Yo Mwana wa Tata, olele oye (2x) Mwa MpataMpata ya Nzambe e, olele oye (2x) Okolongola masumu ma bato, Yokela biso mawa (2x) Mwa Mpata Mpata ya Nzambe ndima losambo la biso (2x) Yo ofandi o loboko la Nzambe Tata ndima losambo la biso (2x)
4.
Eee Yezu Kristu, Yezu Kristu (2x); Yo moko Mokonzi e Eee Yezu Kristu, Yezu Kristu Yo moko moko Mosantu e Yo mok’oleki banso, iya o iya iya iya o iya (2x)
5.
Elongo n’Elimo Santu Santu, (amen (x))