NAYAMBI NZAMBE SE MOKO (AL86)

Credo

Abbé Jean Pierre MAKAMBA

Refrain

Eh Nayambi e, (4x)

Couplets

1.

Nayambi Nzambe se moko Tata wa bokasi bonso, Mozalisi wa likolo na nse wa biloko binso Biye biko monono mpe biye biko monono te Nayambi Mokonzi moko Yezu Kristu, Mwana wa Nzambe Abotami na Tata naino bileko bibandi te, Ye Nzamb’awuti na Nzambe, Ye Mwinda awuti na Mwinda, Nzambe wa solo awuti na Nzambe wa solo, Tata aboti Ye kobota asali Ye te Mwan’azali na Tata Nzambe moko, Na Ye Tata akeli biloko binso:

2.

Ayaki awa o nse mpo ya biso bato, mpo ya kobikisa biso, Akamati nzoto na nguy’Elimo Santu ) Abotami na Ngondo Maria mpe akomi moto: nayambi e

3.

Babaki Ye o Kuruse mpo ya biso, oeleko ya Pontio Pilato, Ayoki mpasi awei akundami (2x)

4.

Asekwi nsima ya mikolo misato Lokol’ekomami o mikanda misantu, Abuti o likolo azali o nkembo ya Nzambe Tata e: nayambi

5.

Nd’ayei lisusu na nkembo kokata likambo lya bato banso Baye bazali na bomoi na baye bawei Bokonzi bwa Ye nde bosuki te

6.

Nayambi mpe Elimo Santu Mokonzi akopesa biso bomoi e, Awuti na Tata e, awuti mpe na Mwana . Tokumbamela Ye mpe tokembela Ye elongo na Tata, Mpe na Mwana, Ye nde mot’alobaka na monoko mwa ba profeta

7.

Nayambi Eklezya se yoko Esantu ey’ezali ya bato banso, Ebandaki na ba postolo, nandimi batisimo se yoko e Ekolongola masumu nakozila nsekwa ya bawa e Mpe bomoi bokoya nsima. Amen amen

Santu Kanda

[email protected]

L'outil moderne pour vos célébrations liturgiques