NAYEI LELO EPAI NA YO (718)
KyrieAbbé Georges LEWO
Refrain
Nayei lelo epai na Yo Nzambe wa ngolu Nayei lelo epai na Yo Nzambe wa bolingo Mpo Yo Nzambe Nkolo wa bolingo bwa ngai, Wana nde ntina ya esengo na ngai, e Yo nde Tata e, Ozali Tata wa ngai, okobwaka ngai te, okoyamba ngai mwana wa Yo
Couplets
Nazalaki mwana mwasi azanga botosi e Koyenga yenga mpamba mpamba butu mpe moi e Yamba bomoi bwa ngai lokola libonza kitoko e, Nasalela Yo e na ndakisa elamu e Tous: Okobwaka ngai te, okoyamba ngai mwana wa Yo Nazalaki mwana mobali alula molangwa e, Kobunda mpamba mpamba, moyibi epai e Kasi lelo nazui mokano ya kotika mabe manso, Osalisa ngai e nakoma moto wa ntina e
Nazalaki Tata mabe Nzambe o kati ya libota e, Nasundolaki mwasi wa ngai, nabosanaki mpe bana e, Kasi nabimi lelo Nzambe o’boso bwa Yo e, Osalisa ngai e nabongola motema e Nazalaki mama mabe atonda lokuta mpe lokoso e, Nakosaki mobali wa ngai natindaki bana na nzela mabe, Kasi lelo nandimi Nzambe kotika mabe na ngai, Osalisa ngai e, namileli na Yo e
Opesaki ngai bokonzi mpo na kamba baninga e - Opesaki ngai nionso e mpo nasalisa bato, - LR