KAMATANI BOLIA (D48)
CommunionAugustin IBANDA
Refrain
Kamatani bolia, kamatani bomele (2x) Mampa mazali nzoto ya Ngai, Vino ezali makila ma Ngai, Makila ma bondeko bwa sika Makosopana mpo ya bino e (mpo ya bino e) Mpo ya bino e, mpo ya bino e mpo ‘te bozua bomoi bwa lobiko (2x)
Couplets
1.
Evandi Yezu o meza elongo na bayekoli ba Ye Atomboli miso likolo akamati limpa abuki lyango alobi :
2.
Evandi Yezu o meza elongo na bayekoli ba Ye Akamati nkeni atali likolo asambeli lisusu alobi :
3.
Telemani banso (2x) batata telemani banso tokende kolia nzoto ya Ye, Bamama telemani banso tokende komele makila ma Ye e, Bilenge telemani banso tokende o meza esantu ya Ye.