NKEMBO NA NZAMBE (AL75)

Gloria

Dieudonné KAIMBA KOGODO

Refrain

Nkembo na Nzambe, Nkembo kun’ o likolo O nse boboto na bato ba bolingo.

Couplets

1.

Tokokumisa Yo e, tokoyembela Yo, tokokumbamela Yo, tokokembela Yo mpo ya Nkembo ya Yo enene tokotondo Yo.

2.

Mokonzi Nzambe se Yo e, N’kumu wa likolo se Yo e, Tata wa bokasi bonso zwa nkembo.

3.

Mokonzi Yezu Kristu e, Mwana se moko wa Nzambe, Mwa Mpata ye Nzambe ndima losambo ; Yo owandi o loboko la mobali la Nzambe Tata, ndima losambo. 4, E Yezu Kristu, Yo moko Mokonzi : nkembo o nkembo; Yo moko Mosantu : nkembo o nkembo; Yo moko oleki banso : nkembo o nkembo. 5 Elongo n’Elimo Santu, nkembo na Nzambe Tata, Nkembo na Yezu Kristu, Nkembo n’Elimo santu. Amen.

Santu Kanda

[email protected]

L'outil moderne pour vos célébrations liturgiques