YE NDE PROFETA (HY18)
CommunionJoel Carlo BELENGO
Refrain
Ozana e ozana, ozana Ozana e ozana toyemba ozana (2x)
Couplets
1.
Bokende, bokende o mboka ya ngambo Kuna bokokuta mpunda, bokanga ye Mpe bomema ye awa na mwana wa ye (Yo nde Mokonzi toyemba ozana!)
2.
Yebisa na mwasi wa Sion : « Tala Mokonzi wa yo Ayei na yo likolo lya mpunda, Na boboto mpe na nkembo e lokumu la Ye » (Yo nde Mokonzi toyemba ozana!)
3.
Bato banso bayei e mpe balandi, balandi Ye, Bagangi mpe bayembi banso ozana, (Yo nde Mokonzi toyemba ozana!)
4.
Nkembo na yo okoya e o nkombo ya Mokonzi ozana, Elongo na mapinga ma likolo, Ozana na Mwana wa Davidi, (Yo nde Mokonzi toyemba ozana!)
5.
Yeruzalem bamituni, Yeruzalem bamituni banso : Oyo nde nani ? Oyo Profeta, (Yo nde Mokonzi toyemba ozana!)