OH NKEMBO OH NKEMBO O LIKOLO

Gloria

Auteur non précisé

Refrain

Oh nkembo oh nkembo o likolo (2x) o nse boboto na bato balamu, o nse boboto na bat oba motema bolamu.

Couplets

1.

Tokokumi Yo tokoyembela Yo e, tokokumbamela Yo tokotondo Yo e Nzambe (nkembo nkembo nkembo e)

2.

Mokonzi Nzambe Nkumu wa likolo e, Tata e wa bokasi bonso zuwa nkembo (nkembo nkembo nkembo e)

3.

Mokonzi Yezu Kristu Mwana se moko wa Nzambe Ye nde Mwana wa Tata ah ah ah nkembo

4.

Yo moto okolongola masumu ma bato (2x) mwa mpata yokela biso mawa, mwa mpata ondima losambo la biso.

5.

Yo moko Mokonzi Yo Mokonzi, Yo moko oleki banso o

6.

Elongo (Amen) n’Elimon Santu(Amen), o nkembo(Amen) na Nzambe Tata(Amen), oh nkembo(Amen) nkembo na Mwana(Amen), o nkembo(Amen) nkembo n’Elimo (2x) Ah nkembo amen (2x) A--------men (bis)

Santu Kanda

[email protected]

L'outil moderne pour vos célébrations liturgiques