TATA YAMBA MABONZA (B29)

Offertoire

Joel Carlo BELENGO

Refrain

Tata yamba e, (4x) mabonza ma bana lelo bapesi na Yo. |

Couplets

1.

Topesi na Yo mampa na vino e, mampa ma bomoi oyamba e Nkeni ya libiki oyamba e

2.

Topesi na Yo eteni ya zomi ya misala mya biso Oyamba e mabonza

3.

Topesi na Yo mitema mya biso Bomoi bwa biso, bamposa ya biso losambo la biso, Tous: Mitema mya biso, Bomoi bwa biso, Bamposa ya biso losambo la biso.

4.

Topesi na Yo mboka ya biso e, bakonzi banso obayamba e Bayangeli banso obayamba e

5.

Topesi na Yo paloase ya biso, bakristu banso obayamba e Bamibonza banso obayamba e

Santu Kanda

[email protected]

L'outil moderne pour vos célébrations liturgiques