YAKA NOKI MESIYA (E24)
EntreeRéné NKUMILEMBO
Refrain
Toleli mingi e Mesiya. Toleli Yo, yaka noki e Emanuele. Mesiya a a yaka e: |
Couplets
1.
Olongola biso na boombo bwa masumu.
2.
Otia bosembo, boboto o mabota. »
3.
Opesa mayele mpe bwanya bwa Nzambe.
4.
Otia bolingo na bomoko o Eklezya.
5.
Opesa kimya e o ekolo ya biso. |