NA YEI NZAMBE (743)

Kyrie

José MPANDE

Refrain

Nayei nayei nzambe o boso bwa yo limbisa mabe ma ngai nkolo, yo nzambe wa ngolu otonda na mawa, masumu ma ngai namileli ko ma- luti e

Couplets

1.

Tala mawa na mpasi ikangi ngai zambi mabe maleki, tiya matoi lolaka la ngai oboya te, tala bomoi bwa mwana wa yo obatela ko maluti e

2.

Limbisa ngai mokonzi nzambe wa ngai otika ngai te tata ngai motema mokomi kobete makasi miso ma ngai nzambe mokomi molili e ko maluti e

3.

Nabongola solo motema mwa ngai zambi nalali mpongi nga na nsekwa o kati ya bawa mpe kristu akozala mwinda mwa ngai e yo maluti e

Santu Kanda

[email protected]

L'outil moderne pour vos célébrations liturgiques