NGAI MOSUMUKI (Z40)

Kyrie

Jean Bedel BOYELE

Refrain

Ngai mosumuki nayei epai na Yo, Ngai mosumuki, ngai moto ya mawa, Petola ngai nayei epai na Yo Petola ngai Yo Nzambe wa mawa, Petola ngai nayei epai na Yo Petola ngai, Yo nde Nzambe wa ngolu, Petola ngai nayei epai na Yo

Couplets

1.

Lokola mwasi mosumuki, na kangami na bokali, babwaka ngai mabanga te, Tala ngai na miso ya ngolu, yokela ngai mawa 1-3 Yo nde Nzambe wa ngolu, petola ngai nayei epai na Yo.

2.

Ngai ko mwana wa Eva nabotami na lisumu Nafandi o nse ya pota ya mopanzi mwa Yo, Nasukola mayi ma bomoi, na petwama na makila ma libiki,

3.

Ngai pe lokola Zakeo, na kiti o nzete ya lisumu Natiki manso ma kala na bomoi bwa ngai Nakoma moto mwa sika, nazala wa Yo nde ndeko, RRR AE

Santu Kanda

[email protected]

L'outil moderne pour vos célébrations liturgiques